Lingala Luke 2:1-20

Na bamikolo yango kula abimaki boyo, Kaisara Auguseto apisaki toli batu nyoso atia kombo na bo na waranga. Ye apisaki toli boyo na libosu soko Kwirinio azalaki guvanori na Suria. Nasima batu nyoso akendaki na kutia kombo na bo, batu moko moko kukenda na gwata na bo pinza. Nasima Yosefa likula alungulaki na Galilaya, na gwata na Nazareta, akendaki na Yudaya, na gwata na Dawidi, bo abingi Beteleme; zambi ingeli na ye azalaki na Dawidi tata na ye, pua na kutia kombo na ye na waraga sikamoko na Maria, mwasi ye alingaki kukamata, nasima ye azalaki na sopo. Ndo kula abimaki boyo, soko bo azalaki kuna, bamikolo na ye na kubuta akukaki. Nasima ye abutaki Mwana na ye, oyo na libosu, akangaki Ye na litambala, alalisaki Ye na sanduku na kulia na bagara; zambi sika pua na bo azalaki te na ndako na sinziri. Nasima na nyeli yango basinziri na kandolo azalaki kutikala na uma, kusinzira bakandolo na bo na butu. Ndo malaika na Mokonzi asemamaki pai na bo, nkembo na Mokonzi apiraki pembeni na bo; nasima bo abangaki kubanga. Nasima malaika alubaki na bo, "Obangi te; zambi, otali, ngai abia pai na bino na sambo malamu na kusika mokuru, azala pua na batu nyoso; zambi lelo na gwata na Dawidi Mobikisa asirabimi pua na bino, Ye azali Kristu Mokonzi. Nasima oyo azi elembo pua na bino; Bino akuta Mwana kulala na sanduku na kulia na bagara, mama asirakangi Ye na litambala. Ndo nokinoki kufuruka na bamalaika na lora azalaki sikamoko na malaika yango, kusifa Nzambe, na kuluba, Nkembo otikali na Nzambe na likolo na nyoso, Nasima pai na mokili motima bi na sopo malamu okumi pai na batu." Ndo kula abimaki boyo, soko bamalaika asiralunguli na bango, kukenda na lora, basinziri yango alubanaki, "Take sasaipi na Beteleme menimeni, tameni kula oyo asirakumi, Mokonzi asiramenisi bisu." Nasima bo abiaki na mbango, akutaki Maria na Yosefa, na Mwana kulala na sanduku na kulia na bagara. Ndo, soko bo asirameni, bo aibisaki batu nyoso monoko bo asiraoki na kula na Mwana oyo. Nasima batu nyoso na kuoka akamwaki pua na kula basinziri alubaki na bo. Kasi Maria abumbaki kula oyo nyoso, kukanisa bango na motima na ye. Nasima basinziri azongaki, kusifa na kupisa merisi na Nzambe pua na kula nyoso bo asiraokaki, asiramenaki, pilamoko bamalaika alubaki na bo.